Likámá lya mpɛ́pɔ o 2007
From Wikipedia, the free encyclopedia
Likámá lya mpɛ́pɔ o 2007 lizalí likámá lya mpɛ́pɔ liye lisalamáká ntángo mpɛ́pɔ na motɛ́lɛ ya mapása, Antonov An-26, ya lingómbá lya mombɔ́ngɔ lya Kongó-Kinsásá "Africa one", etutákí mpé ezikákí nsima ya ngonga mokɛ́, ntángo mpɛ́pɔ êná ekokáká kopumbwa tɛ́ na Libándá lya Ndáko ya Mpɛ́pɔ ya N'djili na engúmba Kinsásá na ekólo Kongó-Kinsásá na mokɔlɔ mwa mínei sánzá ya zómi mobú mwa 2007. Mpɛ́pɔ eye elongwáká na Libándá lya Ndáko ya Mpɛ́pɔ ya N'djili na ngonga ya 10:43, ntángo ya Kinsásá, mpɔ̂ na kokɛndɛ na Tshikapa, na ntáká ya kilómɛtɛlɛ 650 na monyɛlɛ.
*draft