Palemá
From Wikipedia, the free encyclopedia
Palemá ezalí esíká mpé lisangá lya bantómá ba bǎna-mbóka bapɛ́saka makanisi libosó ’te bapɔ́na mangó lokóla mibéko mya kokamba letá mpé ekólo. Esálaka na bokonzi bwa mibéko.
Nkómbó « palemá » eútí parlement o lifalansé.
Palemá eúlaka bǎna-mbóka, kasi mpé ekokí koúla bitúká bya lisangá lya bitúká. Palemá ekokí kozála na ndéngé íbalé :
- palemá ya ndáko yɔ̌kɔ́, eye ekelí mpé endími mobéko mwa sika.
- palemá ya ndáko íbalé, ndáko yɔ́kɔ ya bokeli mibéko mpé ndáko esúsu ya bobɔngisi mibéko, esengélí ndáko íbalé indimí mobéko mwa sika.